Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:21 - Mokanda na Bomoi

21 Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:21
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »


pamba te okobosana pasi na yo, okokoma kokanisa yango kaka lokola mayi oyo esili kotiola.


Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !


Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.


Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.


Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki ; liboso ete pasi ya kobota ekomela ye, abotaki mwana mobali.


Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni ; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.


Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga ? Boni, ozali lisusu na mokonzi te ? Boni, mopesi toli na yo asili kokufa mpo ete pasi ekanga yo lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?


pamba te ekomama : « Sepela, mwasi ekomba, yo oyo obotaka te ! Sepela makasi mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebele koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. »


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ