20 Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;
Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.
Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›