Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango : — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?


Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.


Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »


Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi.


Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu.


Bamitunaki lisusu : — Alingi kotalisa nini tango alobi : « Etikali mwa tango moke ? » Tozali kososola te ndimbola to tina na yango.


Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo : Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Na mokolo wana, bokosenga na Kombo na Ngai. Nazali koloba na bino te ete nakosengela bino epai ya Tata.


Tososoli sik’oyo ete oyebi nyonso, mpe ete ozali na posa te ete bapesa Yo mituna. Mpo na yango, tondimi solo ete owutaki epai ya Nzambe.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?


Yesu alobaki : — Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai.


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ