Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 16:17 - Mokanda na Bomoi

17 Ndambo ya bayekoli ya Yesu bakomaki komituna : — Yesu alingi penza koyebisa biso nini na maloba oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu » mpe « nazali kokende epai ya Tata ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 16:17
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana : — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ?


Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.


Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela.


Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.


Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.


Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu : — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te ?


Toma alobaki na Yesu : — Te, Nkolo ! Toyebi te esika oyo ozali kokende ; bongo tokoyeba nzela na yango ndenge nini ?


Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete bokweya te na komekama to mpo ete kondima na bino ekweya te.


Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu.


Bamitunaki lisusu : — Alingi kotalisa nini tango alobi : « Etikali mwa tango moke ? » Tozali kososola te ndimbola to tina na yango.


Wana Yesu asosolaki ete balingi kotuna Ye motuna, alobaki na bango : — Boni, bozali solo na posa ya koyeba tina ya maloba na Ngai oyo : « Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu ? »


Sik’oyo, nazali kokende epai na Ye oyo atindaki Ngai, mpe moko te kati na bino azali kotuna Ngai : « Ozali kokende wapi ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ