Yoane 15:8 - Mokanda na Bomoi8 Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.
Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !