6 Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.
kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo lokola kaka eloko moko ya nkele, kati na bibembe ya bato oyo baboma, bato oyo batobola bango na mopanga, bongo bakiti kino na libulu ya mabanga lokola bibembe oyo banyata na makolo.
Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ekokoma solo monene ? Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango te mpo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka ? Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka ; ekoluka na yango makasi mingi te mpe bato ebele te mpo na kopikola yango.
Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.
Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »