Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 15:22 - Mokanda na Bomoi

22 Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu ; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 15:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango.


nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.


Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye : ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka.


Pamba te moto oyo ayini Ngai ayini mpe Tata na Ngai.


Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.


na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te ;


Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.


Yesu azongiselaki bango : — Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te ; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.


Nzokande, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, kasi azali sik’oyo kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema.


Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.


Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani ; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango.


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


botambolaka lokola bansomi, kasi bosalelaka bonsomi na bino te lokola vwale mpo na kozipa mabe na bino, pamba te bozali bawumbu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ