17 Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino.
Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.
Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino.
Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu.
Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.