Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 15:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 15:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ngai, nalingaki bino, » elobi Yawe, « kasi bino bozali kotuna Ngai : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? › Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? » elobi Yawe, « Nzokande, nalingaki Jakobi,


Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.


Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino.


Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.


Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino.


Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.


Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.


Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.


Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.


Mpe tala mobeko oyo apesa biso : kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso.


Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo : moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.


Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ