Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 15:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 15:1
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yaka, mobali na ngai ; tika ete tokende na biso na elanga, tolekisa butu na biso kati na mboka !


Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki.


Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.


komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.


Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, banyati-nyati elanga na ngai, babongoli elanga na ngai ya kitoko mabele ya kokawuka.


Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai mpe okomi nzete oyo nayebi te, nzete oyo ebotaka mbuma mabe ?


Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.


Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.


Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai ; bakobenga Ye : Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi.


Yesu azongisaki : — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.


Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.


Boyoka lisese mosusu : Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.


Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese : — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.


Bongo alobaki lisese oyo : — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino ; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.


Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.


Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka.


Kasi soki bitape mosusu ekatamaki ; soki yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo kati na bitape oyo etikalaki ; soki sik’oyo okomi komela, elongo na bitape yango, mayi moko oyo ezali komata wuta na mosisa ya nzete ya olive,


Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.


Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ