Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 14:9 - Mokanda na Bomoi

9 Yesu azongiselaki ye : — Ah Filipo ! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te ? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi : « Lakisa biso Tata ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 14:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye : — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? » Izaki azongisaki : — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai : « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke ? »


« Ndenge nini okoki penza koloba : ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;


Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.


Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ?


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai.


Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai ; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino.


Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai ; mpe kobanda sik’oyo, boyebi Ye mpe bomoni Ye.


Bongo batunaki Ye : — Tata na yo azali wapi ? Yesu azongisaki : — Boyebi Ngai te, mpe boyebi Tata na Ngai te. Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai.


Nzokande, soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bakufi bakosekwa te ?


Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,


Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ