Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 14:31 - Mokanda na Bomoi

31 kasi ezali mpo ete mokili eyeba ete nalingaka Tata, mpe ete nazali kosala kolanda ndenge atindaki Ngai. Botelema ; tolongwa awa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 14:31
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.


Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te ; namizongisaki sima te.


Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.


Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango !


Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.


Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !


Pamba te nalobaki na Kombo na Ngai moko te ; kasi Ye moko Tata oyo atindaki Ngai apesaki Ngai, lokola mitindo, makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya.


Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.


Ndenge Tata alingaki Ngai, Ngai mpe nalingaki bino ; boye, bowumela kati na bolingo na Ngai.


Kasi Yesu alobaki na Petelo : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ