Yoane 14:27 - Mokanda na Bomoi27 Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.