Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 14:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 14:26
75 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotala lisusu masumu na ngai te, mpe longola bambeba na ngai nyonso.


Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.


Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.


Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.


Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.


Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;


Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »


Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.


Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu


Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola :


Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !


Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.


Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.


mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »


Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »


Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.


Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,


Nayebisi bino makambo oyo nyonso, wana nazali nanu elongo na bino.


Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ;


Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.


Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.


Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango : — Boyamba Molimo Mosantu !


Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.


Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.


kino na mokolo oyo amemamaki na Likolo, sima na Ye kopesa mitindo, na nzela ya Molimo Mosantu, epai ya bantoma oyo aponaki.


Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo : « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela.


Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.


Mbala moko, nakanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki : « Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »


Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki : — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.


Na etinda ya Molimo Mosantu, Barnabasi mpe Saulo bakendeki na Selesi ; mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre.


Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo :


Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso.


Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia.


Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.


Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »


Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te ; bongo Polo abakisaki liloba oyo : — Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi :


Boye, Petelo atunaki ye : — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ?


Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu !


Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.


Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.


Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.


Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ?


kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ; kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;


Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe


mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.


Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.


Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.


Batela yango malamu lokola bomengo, na lisungi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso.


abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.


Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso :


Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.


Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi : « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,


Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.


Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.


pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.


Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso.


Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.


Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ