25 Nayebisi bino makambo oyo nyonso, wana nazali nanu elongo na bino.
Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali.
Kasi moto oyo alingaka Ngai te, akobatela mpe maloba na Ngai te. Nzokande, Liloba oyo bozali koyoka ezali ya Ngai te, kasi ezali Liloba ya Tata oyo atindaki Ngai.
Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.
Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema.
Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.
Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi bokokoka kososola yango te sik’oyo.