22 Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu : — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te ?
Filipo mpe Bartelemi ; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;
Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife ; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,
Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
Nikodemi atunaki Ye : — Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu ? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu ?
Nikodemi atunaki lisusu : — Ekosalema ndenge nini ?
Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?
Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba : — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ?
Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?
Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki : Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo ; Jake, mwana mobali ya Alife ; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.
Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake ; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto :