Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 14:21 - Mokanda na Bomoi

21 Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 14:21
43 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atikalaki ya kokangama na Yawe mpe atikaki te kolanda Ye ; abatelaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.


Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »


Moyize azongisaki : — Monisa ngai nkembo na Yo.


Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.


Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ;


Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›


Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !


Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.


Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


akomonisa nkembo na Ngai, pamba te akozwa makambo kowuta epai na Ngai mpe akoyebisa bino yango.


Ye moko Tata alingaka bino, pamba te bolingaka Ngai mpe bondimaki ete nawutaki epai na Nzambe.


Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.


mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai : « Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba na tina na Ngai. »


Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai.


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba,


Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.


Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,


Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo ! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso !


Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye.


Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.


Pamba te kolinga Nzambe ezali : kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te,


Mpe tala makambo oyo bolingo esengaka : kobika kolanda mibeko ya Nzambe. Yango nde mobeko oyo tosengeli kotosa, ndenge boyokaki yango wuta na ebandeli, mpo ete bobika kati na bolingo.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ