Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 14:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 14:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »


Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »


Simona Petelo atunaki Yesu : — Nkolo, ozali kokende wapi ? Yesu azongiselaki ye : — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende ; okolanda Ngai sima.


Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.


Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.


Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.


Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na Ngai.


Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.


Pamba te Nzambe abongisa biso te mpo na kanda na Ye, kasi mpo ete tozwa lobiko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


Pamba te Abrayami azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko oyo ebukanaka te, engumba oyo Ye moko Nzambe azali Mobongisi mpe Motongi na yango.


pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya.


epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.


Na nzela ya biloko oyo, Molimo Mosantu azalaki kotalisa polele ete, wana Mongombo ya liboso ezalaki nanu, nzela mpo na kokota kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki ya kokangama.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.


Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.


Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ