Yoane 14:17 - Mokanda na Bomoi17 Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.
Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.