Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 13:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi Petelo alobaki na Yesu : — Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo ! Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 13:8
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi azongisaki : — Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai !


Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.


Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


Yawe akolongola botutu ya basi ya Siona, akopetola Yelusalemi oyo ekomaki mbindo na bilembo ya makila, na nzela ya molimo ya kosambisa mpe ya moto.


Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana ! Ekokomela Yo te !


Mwana azongisaki : « Naboyi. » Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango.


Petelo alobaki : — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te.


Petelo alobaki na Ye : — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko.


Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye : — Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo ?


Simona Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, lokola ekomi bongo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai lisusu maboko mpe moto.


Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo.


Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »


Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.


mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,


Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.


Botelemelaka bato oyo bamisepelisaka na komikitisa ya lokuta to na kosambela ba-anjelu, bopesaka bango nzela te ya kozangisa bino elonga. Bamipesaka na bimoniseli ya makanisi na bango, batondi na lolendo ezanga tina,


Solo, mibeko ya bongo emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka na bato ete basambelaka ndenge balingi, bamilakisaka lokola bato ya komikitisa mpe bamipesaka pasi na nzoto ; nzokande ezali na tina moko te, soki kaka te kokokisa baposa ya nzoto.


abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ