Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 13:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yesu azongiselaki ye : — Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo ; kasi okososola yango na sima.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 13:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato bakosomba lisusu bilanga kati na mokili oyo bino bozali koloba na tina na yango : ‹ Mokili oyo ebeba, etikala lisusu na bato mpe na banyama te ; pamba te ekabama na maboko ya bato ya Babiloni. ›


Tika ete apambolama ye oyo azali kozela kino na suka ya mokolo ya nkoto moko na nkama misato na tuku misato na mitano.


Nayokaki ye, kasi nasosolaki te. Boye, natunaki : — Makambo oyo ekosukela ndenge nini, nkolo na ngai ?


Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.


Simona Petelo atunaki Yesu : — Nkolo, ozali kokende wapi ? Yesu azongiselaki ye : — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende ; okolanda Ngai sima.


Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye : — Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo ?


Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ