Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 13:35 - Mokanda na Bomoi

35 Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 13:35
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.


Moto nyonso oyo alingaka ndeko na ye azali kati na pole ; mpe ezali na eloko moko te kati na ye, oyo ekoki kobetisa ye libaku.


Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye.


Mpe sik’oyo, mama molingami na ngai, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kaka mobeko oyo tozwaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ