28 Kasi, kati na bato oyo bazalaki wana na mesa, moko te asosolaki tina oyo Yesu alobaki na ye bongo.
Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye : — Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki.
Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »