Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai.
Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »