Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 13:21 - Mokanda na Bomoi

21 Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema ; alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 13:21
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.


alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.


Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki.


Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.


Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.


Bayekoli bakomaki kotalana bango na bango mpe kotunana mpo na koluka koyeba soki Yesu azalaki koloba na tina na nani.


Wana Polo azali kozela bango kati na Ateni, motema na ye etungisamaki mingi na komona ete engumba yango etonda na banzambe ya bikeko.


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ