Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 13:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo ayambi motindami na Ngai ayambi nde Ngai, mpe moto oyo ayambi Ngai ayambi mpe Motindi na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 13:20
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »


— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.


Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.


mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.


Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai ; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko.


Yango wana, lokola bosilaki koyamba Yesu-Klisto lokola Nkolo, botambolaka lokola bato oyo bazali moko na Ye :


Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ