Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,
nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.
Boye, Petelo atunaki ye : — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ?
Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.
Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama.