boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima, mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe ; bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga.
Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te : « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema ! »
« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi : « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye : ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › »
Namiyebiseli bino makambo wana nyonso mpo ete, soki tango yango ekoki, bokanisa ete Ngai nasilaki koyebisa bino yango. Nayebisaki bino yango te wuta na ebandeli, mpo ete nazalaki nanu elongo na bino.