Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi ; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.


Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Alobaki na bango : — Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo ; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi !


Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.


Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.


— Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola ?


Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »


miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.


Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.


Ndakisa : soki moto moko akoti kati na ndako na bino ya mayangani, alata penza bilamba ya talo mpe lopete ya wolo ; bongo mobola mpe akoti, alata bilamba na ye ya bobola.


Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ