Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.
Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.
Kasi mpo na tina wana, Nzambe ayokelaki ngai mawa mpo ete, kati na ngai oyo naleki na masumu, Yesu-Klisto atalisa motema monene na Ye, oyo ezangi ndelo lokola ndakisa epai ya bato oyo bakondimela Ye mpo na kozwa bomoi ya seko.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.