Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:5 - Mokanda na Bomoi

5 — Mpo na nini bateki te malasi oyo na motuya ya mbongo ya bibende nkama misato mpo na kopesa yango epai ya babola ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:5
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, lokola tozwi libaku ya kosala epai ya mokonzi mpe lokola ezali malamu te mpo na biso komona lokumu ya mokonzi kobebisama, totindi sango oyo mpo na kotalisa makambo oyo epai ya mokonzi


Faraon alobaki : — Bagoyigoyi ! Bozali penza bagoyigoyi ! Yango wana bozali koloba : « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. »


Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! »


Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.


Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »


Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.


Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;


Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?


Bongo moko kati na bayekoli ya Yesu, Yuda Isikarioti, ye oyo akoteka Ye, alobaki :


Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi ; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.


Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »


Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ