47 Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te ; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [
Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
Boyeba malamu ete ezali mpo na lobiko na bino nde Nkolo na biso azali nanu kokanga motema, ndenge Polo, ndeko na biso ya bolingo, akomelaki bino, kolanda bwanya oyo Nzambe apesaki ye.