Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:45 - Mokanda na Bomoi

45 mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:45
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezayi alobaki bongo mpo ete amonaki Nkembo ya Yesu mpe azalaki koloba na tina na Ye.


Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.


Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ