Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:43 - Mokanda na Bomoi

43 pamba te bazalaki kolinga mingi kozwa lokumu kowuta na bato, kasi lokumu kowuta na Nzambe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:43
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo.


Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.


Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.


Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.


Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?


Moto oyo alobaka na kombo na ye moko alukaka lokumu na ye moko ; kaka oyo azali koluka lokumu ya Nzambe oyo atindaki Ye nde azali koloba solo, mpe mabe ezali te kati na Ye.


Yesu azongiselaki bango : — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu.


Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema ; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.


bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te ;


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.


Tolukaki te lokumu kowuta na bato, ezala epai na bino to epai ya bato mosusu,


kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati : esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.


Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ