42 Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye ; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani,
Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?
Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi : — Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai.
Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye ;
Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ;
Sima na makambo wana, Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, kasi na nkuku mpo ete azalaki kobanga Bayuda, asengaki epai ya Pilato ndingisa ya kokitisa nzoto ya Yesu longwa na ekulusu. Pilato apesaki ye ndingisa yango, mpe Jozefi akendeki mpe akitisaki nzoto ya Yesu.
Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.
Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.