Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:35 - Mokanda na Bomoi

35 Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:35
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.


Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !


« Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili ; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.


Balobaki na ye : — Yesu ya Nazareti azali koleka !


Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.


Yesu azongisaki : — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo.


Boye wana bozali nanu na pole, bondima pole mpo ete bokoma bana ya pole. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendeki mpe amibombaki mosika na bango.


Ngai, pole, nayaki kati na mokili mpo ete moto nyonso oyo akondima Ngai azala lisusu te kati na molili.


Etikali mwa tango moke mpo ete bomona Ngai lisusu te ; mpe sima na mwa tango, bokomona Ngai lisusu.


Yesu alobaki : — Nazali nanu elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki Ngai.


Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.


Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.


Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.


Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ