Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:34 - Mokanda na Bomoi

34 Bato bazongiselaki Ye : — Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso : « Mwana na Moto asengeli kotombolama ? » Nani nde Mwana na Moto ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:34
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.


Yawe alapaki ndayi oyo, akobongola maloba na Ye te : « Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela kolanda molongo ya Melishisedeki ! »


Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.


Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.


Kasi bokonzi, nguya mpe lokumu ya bikolo oyo ezali na se ya moyi ekopesama na ekolo ya basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi ya ekolo yango ekowumela seko na seko, mpe bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili bakosalela mpe bakotosa ekolo yango.


Nakosala ete libota oyo ezali kotambola tengu-tengu ekoma batikali, mpe oyo bazalaki na bowumbu mosika na Ngai, libota ya nguya. Yawe akozala Mokonzi na bango, na ngomba Siona, kobanda na mokolo yango kino libela na libela.


Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?


Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : — Oyo lisusu nani ?


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Yesu alobaki na bango : — Ekomama te kati na mibeko na bino : « Nalobi : ‹ Bozali banzambe ? › »


Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.


Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama : « Bayinaki Ngai kaka pamba. »


Alobaki lisusu : — Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Na mokuse, ndenge mabe ya moto moko ememelaki bato nyonso etumbu, ndenge wana mpe mosala ya moto moko mpo na kokokisa bosembo ememeli bato nyonso bonsomi mpe bomoi.


Kasi mpo ete Yesu azali na bomoi seko na seko, Bonganga-Nzambe na Ye ezali mpo na libela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ