Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:29 - Mokanda na Bomoi

29 Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki : — Ezali kake ! Bato mosusu balobaki : — Anjelu moko asololi na ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:29
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?


Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.


Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.


Bato oyo bazalaki kokende mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba ; bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango


Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! »


Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ