Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tata, pesa Kombo na Yo nkembo ! Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : — Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:28
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo !


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! »


Azalaki kobondela : — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye !


mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »


Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki : — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye !


Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.


Kasi Yesu alobaki na Petelo : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?


Yesu azongisaki : — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.


mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.


na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,


tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.


Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ