Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo mpo na Yawe, Nzambe na yo, mpo na Mosantu ya Isalaele, pamba te alatisi yo nkembo. »
Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo.
Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.
Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !
Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.