Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! »
mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.
Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.