Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 12:15 - Mokanda na Bomoi

15 « Siona, engumba kitoko, kobanga te ! Tala, mokonzi na yo azali koya, avandi na likolo ya mwana ya ane ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 12:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.


Mokonzi atunaki Tsiba : — Mpo na nini omemi biloko oyo ? Tsiba azongisaki : — Ba-ane ezali mpo na libota ya mokonzi mpo ete batambola na yango, mapa mpe bambuma ezali mpo na bato mpo ete balia, mpe masanga ya vino ezali mpo na kopesa makasi epai ya bato oyo bakolemba na esobe.


mokonzi alobaki na bango : — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni !


Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.


Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »


Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


« Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »


Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama :


Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »


Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe.


Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ