Yoane 12:13 - Mokanda na Bomoi13 Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga : « Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo, Mokonzi ya Isalaele ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ;