12 Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi.
Wana etikalaki mikolo motoba mpo ete Pasika ebanda, Yesu akendeki na Betani epai wapi Lazare, oyo asekwisaki kati na bakufi, azalaki kovanda.
Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango.
Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna ; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi.