Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.
Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi,
Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba. Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana : — Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.
Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna ; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi.