9 Yesu azongisaki : — Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo.
Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.