Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:6 - Mokanda na Bomoi

6 Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »


Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango.


Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !


Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare.


Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ