57 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.
Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.
Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango.
kasi bamosusu bakendeki kokuta Bafarizeo mpo na koyebisa bango makambo yango, oyo Yesu asalaki.
Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki : — Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.
Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.
Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.