Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:51 - Mokanda na Bomoi

51 Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te ; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:51
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami : — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato ?


Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ;


Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.


—ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.


Moko kati na bango, Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, alobaki na bango :


bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana.


Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.


Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ