Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.
Bakengeli ya Tempelo bazongaki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batunaki bakengeli : — Mpo na nini bomemi Yesu awa te ?